instruction stringclasses 5
values | input stringlengths 15 462 | output stringlengths 0 632 | source_project stringclasses 5
values |
|---|---|---|---|
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Mpo na nini ba ver de terre ezali na ntina ? | Basalaka ete mabele ezwa mopεpε mpe babongisaka bokasi na yango na kopolisaka ba matière organiques. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Ndenge nini kopεkisa bokↄnↄ na tango ya mvula ? | Esengeli komεla mai ya peto, kokima mai oyo etelemá mpe kobatela bopeto. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Ndenge nini tokoki kotala impact ya mbɔ́ngɔ oyo bato ya diaspora batindaka na bokoli ya entreprenariat ya mboka? | Esεngeli kotala ndenge mbɔ́ngɔ oyo bato ya diaspora batindaka esalelamaka, ndenge esalisaka misala, bokeli ya misala mpe bokoli ya b'entreprise mikέ ya mboka. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Ndenge nini kolona kwanga ? | Esengeli kolona biteni ya nzete ya kwanga na mabele ya pεtε mpe ya mai. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Matomba nini ezali na kozala na licence ya mombongo mpo na motέki informel? | Licence ya mombongo esalisaka motέki informel asala mosala na ndenge endimami mpe na libateli mingi. Esalisaka mpe kozwa mabaku ya mosala, lisungi ya mbɔ́ngɔ mpe kobakisa bondimi ya basombi. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Ndenge nini tokoki kotala b'impact ya bozali ya ba forces internationales ya kobatεla kimya na bobatεli ya bato? | Tokoki kotala soki mobulu ekiti, bato bazali kobatεlama mpe soki b'institution ya mboka ezali kozwa lisungi. Lisusu, esεngeli kotala mikakatano oyo ekoki kobima na présence ya baforce yango. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Baprotocole nini esengeli kosalela mpo na kokamba bokɔnɔ ya méningite oyo epalangani na kelasi na mboka ? | Esengeli koyeba babɛ́li nↄki, kokabola bato ya bokↄnↄ, kosalisa babɛ́li mpe kolέndisa vaccination. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Ndenge nini kokitisa ntalo ya bilanga ya libota ? | Esengeli kosalela compost, kobimisa momboto ya yo mɔkɔ, kozongisa bosɔtɔ ya bilanga mpe kosala na lisanga. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Biteni ya nzoto na lingala babengaka yango ndenge nini ? | Biteni ya nzoto ezali : mutu (tête), miso (yeux), matoi (oreilles), zolo (nez), monɔkɔ (bouche), mabɔkɔ (mains), makolo (pieds), libumu (ventre) mpe bongo na bongo. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Mabongisi nini ya lisungi ya informel ezali mpo na kobatεla batέki na makama? | Mabↄngisi ya lisungi ya informel ezali lokola tontine, bagroupe ya lisungi, makabo ya lisangá mpe masanga ya batέki. Esalisaka bandeko kosalisana ntango bakutani na bokↄnↄ, likama to mikakatano ya mbɔ́ngɔ. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Ndenge nini tokoki kotala impact ya botindi mbɔ́ngɔ ya diaspora na bokoli ya entreprenariat ya mboka? | Esεngeli kotala ndenge mbɔ́ngɔ oyo etindami esalelamaka, ndenge esalisaka kozwa mbɔ́ngɔ, kosala misala mpe kotombola b'entreprise mikέ ya mboka. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Ndenge nini tokoki kobatέla mpe kopέsa musique ya Kongo epai ya bilenge ? | Esεngeli kosalela baréseau sociaux, kotia musique na mateya, kosala milulu ya mimεsano mpe kolέndisa ba artiste ya mboka. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Ndenge nini kobongisa mai ya komεla mpe mai ya bilanga na mboka mↄkↄ ? | Esengeli kokabola bisika ya mai (puits mpo na komela, mabulu mpo na bilanga), kosala boyangeli ya lisanga mpe kobatela yango na bosↄtↄ. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Ndenge nini tokoki koyeba lolenge ya bilei ya bato na tango ya likámá ya nzala ? | Tokoki kosalela kilo, molai, périmètre brachial, prévalence ya malnutrition mpe motángo ya bozangi bilei ya makasi. Baenquête ya nↄki esalaka ete toyeba bonέnε ya likámá. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Ndenge nini kobakisa milona ya kwanga na zamba ya mai mingi ? | Esengeli kosalela biteni ya malamu ya kwanga, mitindo ya malamu, kobakisa compost mpe kopesa esika malamu kati ya milona. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Ndenge nini tokoki kosala politique ya mateya oyo ekopέsa motuya na Lingála mpe Français? | Esεngeli kokɔtisa Lingála mpe Français na manáka ya biteyelo mpe kosalela yango na mateya ya mokolo na mɔkɔlɔ. Lisusu, esεngeli kosala babuku ya minɔkɔ yango mibale mpe koformer balakisi mpo na basalela malamu programme yango. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Ndenge nini tokoki koyebisa masangá mpo báyeba ntina ya kelasi ya bana mikε to éducation préscolaire? | Mpo na koyebisa masangá mpo báyeba ntina ya eteyelo ya bana mikɛ, esɛngeli kosala mayangani ya boyebisi, kosalela radio ya mboka, kokɔtisa bakambi ya bisika mpe kolakisa matomba ya bokoli ya mwana banda azali mokɛ. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Agriculture vivrière ezali nini ? | Agriculture vivrière ezali bilanga ya kolia, bilanga oyo esalemaka yambo po na koleisa libota ya moloni. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Elanga ezali nini ? | Elanga ezali eteni ya mabele oyo basalelaka mpo na kolona milona to kobokola banyama. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Nini esalisaka balien ya boluki-luki ya bilanga na mayέlε ya baloni ? | Esengeli bilanga ya démonstration, mateya ya lisanga mpe kokotisa baloni na ba essais. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Matomba nini baclub ya botángi emεmaka na biteyelo ya lisangá? | Baclub ya botángi esungaka bana basↄsↄla malamu makambo ya mikanda, balέndisa makoki ya minɔkɔ mpe bakolisa makanisi ya kokanisa. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Ndenge nini kosala programme ya bokɔ́lɔ́ngɔ́nɔ́ na kelasi oyo ezangi bisaleli ya malamu ? | Esengeli kosala mayangani ya koyebisa to koinformer bato, kolέndisa base ya hygiène mpe kosalela bilɔ́kɔ ya mboka ya pεtε to simples. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Mpo na nini ezali na ntina kolala malamu ? | Mpo na kopema, kokola mpe kobatela nzoto malamu. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Bapratique nini esalisaka kokitisa kobungisa bilɔ́kɔ ya sika oyo ebombami? | Esεngeli kobomba malamu bilɔ́kɔ ya sika, kobatεla bopéto, kotala ntango ya kobeba mpe koboya kosomba motango oyo eleki. Boyangeli malamu ya stock esalisaka kokitisa kobungisa bilɔ́kɔ. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Mpo na nini esεngeli koyeba motuya ya elɔ́kɔ oyo tozali kotɛ́ka? | Esεngeli koyeba motuya ya elɔ́kɔ oyo tozali kotɛ́ka mpo na kotia ntaloya malamu, koboya kobungisa mbɔ́ngɔ mpe kozwa litomba ya malamu. Yango esalisaka mpe kopɛ́sa basombi sango ya malamu. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Ndenge nini tokoki kosala ete bana bakoba koyekola atako bitumba ezali? | Esεngeli kofungola biteyelo ya ntango mokuse na bisika ya sécurisés mpe kosalela mateya ya mosika soki ekoki. Lisusu, esεngeli kosunga bana na makanisi mpo báyika mpiko mpe bakoba koyekola. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Calendrier agricole ezali nini ? | Calendrier agricole ezali calendrier oyo elakisaka tango ya kolona, ya kobwaka momboto mpe ya kobuka mbuma. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Mpo na nini esεngeli namizipa na butu? | Esεngeli komizipa na butu mpo na kobatεla molunge ya nzoto, kokima malili mpe kolala malamu. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Mpo na nini esengeli kotosa bikateli ya tribinale? | Kotosa bikateli ya bazuzi ezali na ntina mingi mpo na komaintenir ordre na société. Soki bato babandi koboya yango, ekozala bordel, mpe mobeko ekozala na tina te. Epέsaka nzela ete makambo esila na kimya mpe na bosembo. Yango nde esalaka ete mboka etambola malamu mpe moto nyɔ́sɔ azala ndenge mɔ́kɔ́ liboso ya mobeko. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Ndenge nini tokoki kosunga bato oyo bakutani na makambo ya violences sexuelles na démarche judiciaire na bango ? | Mpo na kosalisa moto oyo akutani na violences sexuelles, yambo yoka ye na motema mɔ́kɔ́ mpe kondima makambo na ye. Na sima, salisa ye aluka lisungi ya b'association oyo eyebi kosalisa na makambo ya bongo ; bango bakoki kopέsa toli ya mibeko mpe kosunga ye na nzela nyɔ́sɔ. Soki alingi, kεndá na ye na commissariat to epa... | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Bamécanisme nini ekoki kosalisa kobɔngisa bafilière ya misala ya mabɔ́kɔ mpo na kotombola makoki ya compétitivité ya bilɔ́kɔ ya mboka? | Mateya, kosangana na masangá, kobɔngisa qualité ya bilɔ́kɔ, kozua bazando mpe kopέsa lokumu na bilɔ́kɔ ya mboka ekoki kokómisa misala ya mabɔ́kɔ makasi. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Basystème ya boyangeli ekoki kolɛ́ndisa masolo to dialogue kati na mangomba mpo na kopɛ́kisa matata? | Ɛɛh, basystème yango ekoki kolɛ́ndisa masolo kati na mangomba na nzela ya kosolola, koyokana mpe kosala elɔngɔ́. Yango esungaka mpo na kopɛkisa matata mpe kolɛ́ndisa boyokani kati na bato. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Ndenge nini nakoki kobikisa rhume ngai mɔ́kɔ́ na ndako? | Mpo na kokitisa rhume na ndako, esεngeli kopέma, komɛla mai mingi, kosokola zolo na sérum physiologique mpe kobatɛla bopéto. Soki bilembo ezali makasi to ewumeli mingi, esεngeli kokɛnda kotala monganga. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Banyama nini esengeli mpo na bobɔ́kɔli ya mokε ? | Ezali banyama lokola basoso, bantaba, bangulu mpe balapin. Banyama yango basengaka esika mpe mbɔ́ngɔ mokε. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Ndenge nini kobundisa banyama ya mabe na milona kozanga bankisi ya chimique ya ntalo makasi ? | Tokoki kosalela milona oyo ebenganaka insecte, mitambo, kobongola milona, kosangisa milona mpe kolongola banyama na mabɔ́kɔ. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Ntango nini esεngeli nakεnda kotala monganga? | Esεngeli kokεnda kotala monganga soki ezali na bilembo oyo emɔnanaka te, mpasi makasi, fièvre oyo ezali kokita te, bokɔnɔ oyo ezali kokóma mabe to soki ozali na mitungisi mpo na santé na yɔ́ to ya mwana. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Ndenge nini tokoki koyeba soki mwana azali kolia mingi te? | Tokoki koyeba yango na kotala bokoli na ye, kilo na ye, nguya na ye, posa na ye ya kolia mpe bilembo lokola kolɛmba to kokola malamu te. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Bisaleli ya communication ya mamlamu mpo na kobongisa bizaleli ya bokɔ́lɔ́ngɔ́nɔ́ na bato oyo bayebi kotanga malamu te? | Malamu ezali radio, bililingi, mpe basupportt visuels. Yango esalaka ete bato bayeba sans kotanga mikanda. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Ndenge nini kosala momboto ya malamu na lisanga ya mboka ? | Esengeli kopona milona ya malamu, kokabola elanga ya momboto, kopona mbuma ya malamu mpe kobomba momboto malamu. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Ndenge nini tokoki kotambwisa mbongwana ya ntalo ya bilɔ́kɔ ya bilei na kolanda eleko? | Esεngeli kolandela mbongwana ya ntalo, koyeba bantango oyo ntalo ekomati to ekita mpe kobɔngisa kosomba na kolanda eleko. Boyangeli malamu ya stock mpe kopέsa bilɔ́kɔ ndenge na ndenge esalisaka kokitisa kobungisa. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Mpo na nini esengeli kolona banzete zinga-zinga ya elanga ? | Mpo na kobatela elanga na mopεpε mpe kobongisa mabele.. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Basystème nini ya boyangeli esungaka mpo na kobundisa financement ya bagroupe armés na nzela ya exploitation ya baressource naturelles ? | Esεngeli kolandela esika mpe ndenge baressource naturelles ezali kobima, kotala bisika ya misala, kobundisa kanyaka mpe kotambwisa mbɔ́ngɔ na polele. Lisusu, boyokani kati na Leta, masangá ya mboka mpe baninga ya bikolo ezali na ntina mingi. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Ndenge nini kolona madesu ? | Esengeli kolona momboto na mabele ya pεtε, kopesa mai mwa mokε mpe kolongola matiti mabe mbala na mbala. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Maponami ya prezida ya mboka ezali nini? | Mapɔnami ya président ezali mapɔnami oyo bato bapɔnaka Président ya République. Lisusu, epέsaka bana mboka makoki ya kopɔna moto oyo akokamba ekólo mpo na eleko mɔ́kɔ́ oyo mibeko etie. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Baeefet ya pollution ya mopɛpɛ na bapoumon ezali nini ? | Pollution ya mopɛpɛ ebimisaka mpasi ya kopema mpe ekitisaka bokɔ́lɔ́ngɔ́nɔ́ ya bapoumon. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Makoki nini bato oyo bazali na VIH bazali na yango na mosala mpe mpo na discrimination ? | Bato oyo bazali na VIH bazali na makoki ya kosala ndenge mɔ́kɔ́ na mosala, kobatεla sekele ya bokɔnɔ na bango mpe kobatεlama na bokεsεni. Esεngeli kotala bango lokola basali mosusu mpe kotosa makoki na bango. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Ndenge nini tokoki kotombola boyébi ya bakɔkɔ mpe kosala ete mateya ekende liboso? | Esεngeli kokɔ́tisa boyébi ya bakɔkɔ na baprogramme ya mateya mpe kosangisa yango na boyébi ya mikɔlɔ oyo. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Ba système nini ya financement islamique lokola mourabaha mpe musharaka ekoki kokokana na bamposa ya bato ya mombongo informel oyo bazali bamusulman? | Mourabaha mpe musharaka ekoki kopέsa nzela ya kozua mbɔ́ngɔ na nzela ya kosomba mpe kotέka to kokabola matomba kati na baninga ya mombongo. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Bamécanisme mpo na kobundisa corruption na eteyelo na RDC ezali nini ? | Esεngeli kolέndisa contrôle ya mbɔ́ngɔ ya Leta, kopέsa etumbu na corruption, mpe kosala ete boyangeli ya biteyelo ezala polele. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Mikakatano mpo na kokoma littérature ya bana ya qualité na Lingála ezali nini ? | Mikakatano minέnε ezali bozangi ya bakomi ya mikanda ya bana, bamaison d'édition mpe bisaleli oyo ebongi mpo na bana. Lisusu, esεngeli kokokanisa ndenge ya kokoma Lingála mpe kobimisa mikanda oyo ezali na bilili ya malamu. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Mpo na nini esεngeli kokεnda kelasi ? | Kokεnda kelasi epέsaka mayέlε, makoki mpe mabaku ya malamu mpo na mikↄlↄ ekoya. Kelasi esalaka ete moto acomprendre mokili, azwa mosala. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Ndenge nini koyebisa mibali makambo ya bokɔ́lɔ́ngɔ́nɔ́ ya kobota ? | Esengeli kosala mayangani ya koyebisa, kolendisa masolo na mabota mpe na masangá, mpe kolimbola ntina ya lisangani ya mibali na makambo ya bokɔ́lɔ́ngɔ́nɔ́ ya kobota. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Ndenge nini koteya lisolo ya Congo ya liboso ya bokonzi ya bapaya na bosembo ? | Esεngeli kosalela basource ya ndenge na ndenge, kolakisa makanisi oyo ekεsέni mpe kolanda makambo concret ya lisolo. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Mpo na nini ezali na ntina kosokola mabɔ́kɔ na mboka ? | Kosokola mabɔ́kɔ ekitisaka kopalangana ya bokↄnↄ. Koleka ete na mboka minganga bazalaka ebele te. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Kↄsukↄsu ezali nini ? | Kↄsukↄsu ezali ndenge nzoto esilisaka bilɔ́kɔ na banzela ya kopema. Soki elɔ́kɔ ezali kodéranger na mongongo to na kati ya bapoumon, okɔsɔ́li po na kobimisa yango. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Mpo na nini esεngeli kokεnda kelasi? | Kokεnda kelasi esungaka na kozwa mayέlε, kolέndisa makoki mpe kobↄngisa avenir. Yango esalaka ete moto azwa mosala ya malamu. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Ndenge nini tokoki kotambwisa boyokani na bakonzi ya mboka mpo na koboya mikakatano ya mombongo? | Esεngeli kotosa mibeko oyo ezali, kozwa mikanda oyo esεngeli mpe kozala na boyokani ya limemya na bakonzi ya esika. Boyokani malamu na bakonzi esalisaka kosala mombongo na kimya mpe kokitisa mikakatano ya administratif. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Syndicat ezali nini? | Syndicat ezali groupe ya basali oyo basanganaka mpo na kodéfendre badroit na bango. Balingaka kos'assurer ete bafutamaka malamu, ete mosala ezali na sécurité, mpe ete bapatron bazali korespecter bango. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Mpo na nini esεngeli kozwa mateya mpo na kobɔngisa misala ya mombongo? | Esεngeli kozwa mateya mpo na kobakisa mayɛ́lε, kotambwisa mombongo malamu mpe komεsana na mbongwana ya zando. Mateya esalisaka mpo na kobakisa mosala mpe mbɔ́ngɔ oyo ekɔ́ti. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Ndenge nini tokoki kotia politique ya kokɔtisa bana ya bamposa ya spéciale na biteyelo na RDC? | Esεngeli kobongisa biteyelo mpo ebonga na bana ya bamposa ya spéciale mpe koteya balakisi ndenge ya koteya bango. Lisusu, politique ya polele mpe lisungi ya spéciale esungaka kokɔtisa bango malamu na eteyelo. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Mpo na nini esεngeli koboya matata na batέki mosusu? | Esεngeli koboya matata na batέki mosusu mpo na kobatεla kimya, boyokani malamu mpe kosala mombongo na ndenge ya bosembo. Yango esalisaka mpe batέki básalisana na ntango ya mpasi. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Mateya ya bana oyo bazalaki baex-combattants na bisika ya post-conflits ekutanaka na mikakatano nini ? | Mikakatano minέnε ezali pasi ya makanisi to traumatismes psychologiques, retard na mateya, mpe mpasi ya kozonga malamu na lisangá. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Po na nini esengeli kolongola matiti mabe na elanga ? | Esengeli kolongola matiti mabe na elanga po yango ezua ba nutriments te, ezua mai pe pole oyo esengeli po na milona te. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Mpo na nini esεngeli kotánga mikɔlɔ nyɔ́sɔ, mpe proverbe oyo elingi koloba nini na français? | Kotánga mikɔlɔ nyɔ́sɔ ebakisaka compréhension ya malamu, ekolisaka vocabulaire mpe elέndisaka makanisi. Proverbe yango elingi koloba ete kotánga mbala na mbala ekómisaka moto mayέlε mingi. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Culture de rente ezali nini ? | Culture de rente ezali milona oyo balonaka mingi mpo na koteka mpe kozwa mbↄngↄ. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Ndenge nini koyeba qualité nutritionnelle ya bilɔ́kɔ ya elanga ? | Tokoki kotala bilɔ́kɔ oyo ezali na kati na yango (proteini, vitamines, minéraux) to kotala ndenge ezali ya sika mpe ya ndenge na ndenge. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Basystème nini ya kokabola ntalo ekoki kosalisa bato ya mombongo mokέ bazua bisaleli kozanga kokɔ́ta nyongo mingi? | Kosomba elɔ́ngɔ, masangá ya bato ya mombongo, kofuta mpo na kosalela bisaleli mpe basystème ya kobomba mbɔ́ngɔ elɔngɔ́ ekitisaka ntalo kozanga kokɔ́ta nyongo mingi. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Irrigation ya ndenge nini, ya talo mokε tokoki kosalela na tango ya elanga ? | Tokoki kosalela kopesa mai na arrosoir, mabulu, système ya goutte-à-goutte ya pεtε mpe kobomba mai ya mbula. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Ndenge nini tokoki kobɔngisa programe ya bilei malamu na mboka ya mosika oyo ezali na baressource mokε ? | Esεngeli kosangisa bato ya lisangá, kosalela bilɔ́kɔ ya mboka mpe koformer barelai ya lisangá mpo na bolandeli to suivi. Simplicité mpe participation ya bato nde esalaka ete programme elonga. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Ndenge nini kosala ete makemba ebeba nↄki te na sima ya kobuka yango ? | Esengeli kobomba yango na esika ya malili pe ya kokauka, kosala ete etutana te pe kotika yango na moi makasi te. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Ndenge nini kobongisa lisanga ya baloni mpo bazwa crédit ? | Esengeli kosala lisanga ya baloni na mibeko ya polele, kopↄna bakambi, kosala caisse ya elↄngɔ́ mpe komεma projet ya bilanga epai ya ba instituts ya crédit. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Ndenge nini tokoki kogérer bilɔ́kɔ oyo etέkami te na nsuka ya mɔkɔlɔ? | Esεngeli kobomba malamu bilɔ́kɔ oyo etέkami te, koluka ntina oyo etέkami te mpe koluka mayέlε ya kotέka yango. Yango esalisaka kokitisa kobungisa bilɔ́kɔ mpe mbɔ́ngɔ. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Mpo na nini esengeli kotimola mabele liboso ya kolona ? | Mpo mabele ekoma pεtε, ezwa mopεpε mpe ekoma malamu mpo milona ekola mpe malamu. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Ndenge nini kogarantir souveraineté ya momboto liboso ya ba sociétés minέnε ya mimboto ? | Esengeli kolendisa momboto ya mboka, kosala ebombelo ya mimboto na lisanga, kolendisa boluki-luki ya Leta mpe kobatela makoki ya baloni ya kozongisa momboto. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Ndenge nini tokoki kotala babarrière oyo epεkisaka bilenge bakɔ́ta na économie informel ya bingumba? | Esεngeli kotala mikakatano oyo bilenge bakutanaka na yango, lokola kozanga mbɔ́ngɔ ya ebandeli, kozanga nzela ya kozua crédit, kozanga formation, concurrence makasi, mikakatano ya mibeko mpe kozanga koyeba makambo ya zando. Evaluation yango esalisaka kobɔngisa biyano oyo ebɔngi mpo na kopétola nzela ya kokɔ́ta na mombo... | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Elɔ́kɔ ya lolenge ya likoló ezali nini? | Elɔ́kɔ ya lolenge ya likoló ezali elɔ́kɔ oyo esalami malamu, ewumelaka mpe ekokisaka bamposa ya basombi. Epέsaka basombi bondimi mpe esalaka ete motέki abatεla lokumu ya mombongo. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Ndenge nini tokoki komibatela na moyibi na zando? | Esεngeli kotala malamu zingazinga, kobomba mbɔ́ngɔ mpe bilɔ́kɔ na esika ya libateli, mpe kotika bilɔ́kɔ kozanga kokɛngɛla te. Boyangeli malamu esalisaka kokitisa likama ya moyibi. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Basystème ya information géographique ya pεtε nini ekoki kosunga kocartographier mpe kopέsa lokumu na baressource ya baterritoire ya mboka ? | Baoutil ya pεtε lokola b'application ya kosala karte na téléphone, bakarte numérique mpe basystème oyo esangisaka bato mpo na kokɔtisa badonnée esungaka mpo na koyeba bilɔ́kɔ oyo ezali na mboka. Esungaka mpo na kolakisa esika bilanga ezali, mai, bazando, banzela, bazando, baproducteur mpe b'activité économique mpo na k... | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Poulailler ezali nini ? | Poulailler ezali ndako to esika oyo babↄkↄlaka pe babatelaka basoso. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Ndenge nini tokoki kobɔngisa bilɔ́kɔ ya mabɔkɔ mpo na kolakisa yango na foire ya mombongo? | Esεngeli kopétola mpe kokanga bilɔ́kɔ ya mabɔkɔ malamu, kotala lolenge na yango, kokoma ntalo polele mpe kobɔngisa yango malamu. Yango ebendaka basombi mingi mpe ebakisaka mabaku ya botɛ́ki. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Ndenge nini koévaluer soki lisungi ya Leta mpo na mabota ya baloni ya vulnérables ezali kosala malamu ? | Esengeli kotala bokoli ya mbɔ́ngɔ, sécurité ya bilei mpe makoki ya kotia mbɔ́ngɔ na bilanga. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Ndenge nini tokoki kobↄngisa mwango ya malamu mpo na kobundisa bozangi bilei malamu ya bana na tango ya kokauka ya mbala na mbala? | Esεngeli kolendisa bokέngεli ya bilei ya bana, kosunga mabota ya bolɛmbu mpe kolendisa bilei ya mboka oyo ekoki kotelema na kokauka. Lisalisi ya nↄki mpo na bana oyo bazali na bozangi ya bilei oyo esεngeli. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Ndenge nini kobomba ndunda kozanga frigo ? | Okoki kokaukisa yango, kobomba na esika ya malili mpe oyo mopεpε ezali, to kobongola yango na nzela ya fermentation to kotia yango mungwa mwa mokε. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Bulletin scolaire ezali nini ? | Bulletin scolaire ezali mokanda oyo elakisaka bapoint ya moyekoli, makanisi ya molakisi mpe barésultat ya moyekoli. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Bamécanisme nini esungaka mpo na kobɔngisa coordination humanitaire na ntango ya crise monέnε ya b'acteur ebele ? | Esεngeli kolɛ́ndisa boyokani kati na Leta, ba ONG, b'agence ya lisungi mpe masangá, kopanza sango mpe kosala b'activité elɔngɔ́. Lisusu, kolandela misala esalisaka koboya kozongela mosala mɔ́kɔ́ mpe kobɔngisa lisungi. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Bisaleli ya évaluation formative nini tokoki kosalela na kelasi oyo ezangi masini ya copie (photocopieuse)? | Bakoki kosalela observation na classe, mituna ya monɔkɔ, baexercice na tableau, bacahier ya bana mpe ba mini-évaluation ya mbangumbangu. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Ndenge nini tokoki kotambwisa banyongo ya basombi kozanga kobέbisa boyokani ya mombongo? | Esεngeli korappeler bango na limemya bafuta, kosolola na bango mpo na koluka nzela ya malamu mpe kotia mibeko ya polele mpo na kotɛ́ka na nyongo. Kosolola malamu esalisaka kozwa mbɔ́ngɔ mpe kobatεla boyokani ya mombongo. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Ndenge nini tokoki kotala soki boyokani kati na ba ONG internationales mpe bakonzi ya mboka ezali kosala malamu na bisika ya mikakatano to crise? | Tokoki kotala soki boyokani ezali malamu, soki lisungi ekómaka nɔki, soki sango ekabolamaka mpe soki bato bazali kozwa matomba. Lisusu, esengeli koyeba soki misala ezali kokokisa bamposa ya lisangá mpe kozanga kozongela mosala mɔ́kɔ́ mbala mibale. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Basystèmes ya informations nini ya zando esungaka baloni ya mokε po na kosolola talo ? | Ezali baplateforme numériques, baradio ya mboka mpe baservice ya kopέsa sango ya talo ya zando ekoki kolendisa baloni ya mokε. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Banzela nini ya mibeko ezali mpo na mwasi oyo azali victime ya mobulu na ndako na RDC ? | Akoki kokεnda kofunda na police to na parquet. Mibeko ebatelaka ye, lokola mobeko ya 2006 mpo na mobulu. Akoki mpe koluka lisungi na ba ONG oyo esalisaka basi, bakopέsa ye lisalisi ya mibeko mpe ya makanisi. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Ndenge nini tokoki kokoma phrase ya pɛtɛ? | Esεngeli kosalela maloba ya pɛtɛ, kolanda molɔngɔ́ ya sujet-verbe-complément mpe koboya kolobela makambo mingi na phrase mɔ́kɔ́. Ndakisa : Nazali kolia mangolo. "Je mange une mangue." | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Ndenge nini tokoki kosalisa bilenge na bamipέsa na makambo ya mboka mpe ya politiki? | Mpo na kosalisa bilenge bákota na makambo ya mboka, esengeli koyoka bango. Tópέsa bango esika báloba makanisi na bango kozanga kobanga. Eza mpe malamu kokutisa bango na bato oyo bayebi makambo yango to na bibongiseli oyo esalaka misala ya boye. Soki tokolendisa bango mpe tokopέsa bango mwa mateya, bakomɔ́na ete bango m... | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Ndenge nini koyeba soki moto azali na fièvre ? | Tokoki komeka température na thermomètre to soki moto azali koyoka nzoto mɔ́tɔ makasi. Température oyo ezali likolo ya 38°C ezali elembo ya fièvre. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Ndenge nini tokoki kokɔtisa bokɔ́kɔ ya mboka na baprogramme ya kelasi ya ekolo? | Tokoki kokɔtisa bokɔ́kɔ ya mboka na manáka to baprogramme ya kelasi ya ekolo na kobakisa minɔkɔ ya mboka, masapo, mimɛsano, mayέlɛ ya bokɔ́kɔ mpe lisolo ya bato na kati ya malakisi. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Ndenge nini kobatela mbuma na mvula ? | Esengeli kozipa mbuma mpe kobomba yango na esika ya kokauka. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Mpo na nini esengeli koyeba constitution ya mboka na yɔ́? | Koyeba constitutionya mboka na yɔ́ ezali na ntina mingi, ndeko. Ezali lokola buku ya mibeko oyo elakisaka ndenge nini mboka esengeli kotambola mpe ebatelaka makoki na biso. Soki oyebi yango, okoyeba ndenge ya kolandela soki bakonzi bazali kosala makambo ya mabe mpe okoyeba malamu bonsɔ́mi na yɔ́. Soki oyebi yango te, e... | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Tontine ezali nini ? | Tontine ezali lisangá oyo bandeko basangisaka mbɔ́ngɔ mbala na mbala mpe basalelaka yango na kolanda mibeko oyo batiaki. Esalisaka kobomba mbɔ́ngɔ, kosalisana mpe kozwa banyongo kati na bandeko. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Médicament générique ezali nini ? | Médicament générique ezali kisi oyo ezali na effet lokola kisi ya marque, kasi mbala mingi ezalaka na ntalo mokε. | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Permis de travail ezali nini? | Permis de travail ezali mokanda ya Leta oyo epέsaka ndingisa na mopaya mpo asala mosala na mboka mɔ́kɔ́ mpo na ntango eyebani. Mbala mingi, ezalaka bakonzi ya Leta ya mboka oyo eyambi nde bapέsaka yango, mpe mbala mingi esimbami na mosali mɔ́kɔ́ boye mpe na esika ya mosala. Kozwa mokanda yango ezali likambo ya tina mpe... | urb |
[URBAIN] Loba lokola bato balobaka na engumba (Na baninga, ya mokɔlɔ na mokɔlɔ) | Ndenge nini kobikisa taba oyo ezali na bokↄnↄ ? | Esengeli kokabola ye na baninga, kopεsa ye bokengi malamu mpe komona monganga ya banyama. | urb |
End of preview. Expand in Data Studio
README.md exists but content is empty.
- Downloads last month
- 33