audio audioduration (s) 0.95 24.1 | text stringlengths 2 149 | duration float64 0.95 24.1 |
|---|---|---|
azalaki komimona na tango wana lisusu te | 5.35425 | |
ata boye ayebanaki na ye na bana basi ebele oyɔ akokaki pe kolinga | 10.458938 | |
motema na ye ezalaki kobanga pe ezalaki kotambola na bana basi oyɔ misato | 8.80275 | |
ya liboso kombo na ye ezalaki sepi | 5.35425 | |
elakisi esεngɔ | 2.472938 | |
azalaki pe komemela ye esεngɔ mpenza | 4.401375 | |
na tango molayi basala bakomaki lokola bandeko ya makila | 12.047063 | |
bayebanaki bango mibale makasi | 3.72075 | |
sepi tango nyɔnso akokaki kolala epayi ya zapo lokola ye pe zapo akokaki kolala epayi ya basepi | 13.862063 | |
bayebanaki liboso ya exetat ya bango mibale | 6.057563 | |
yango wana ata sarah azalaki bango bazalaki kokolisa bolingo na bango malamu ndenge ya bondeko | 13.930125 | |
sepi pe azalaki kitoko makasi | 3.743438 | |
elɔkɔ oyɔ ezalaki kosepelisa zapo makasi epayi na sepi ezalaki pe mayεlε na ye | 12.024375 | |
suki na ye ezalaki kolingama lokola bakalingi yango tango azalaki kotoka | 10.663125 | |
na mbala ebele ayebisa ye yango pe sepi azalaki koseka ye kaka | 9.2565 | |
soki aseki matama ekotaka | 4.401375 | |
nyɔnso wana ezalaki kosepelisa zapo makasi | 5.830688 | |
wana ezalaki tango ya kala | 3.267 | |
sikoyɔ sepi ata kutu atikali monzemba lεlɔ pe sepi pe azali nanu monzemba | 9.846375 | |
zapo na ndenge ya kati azalaki kolinga te ete banzela ya bango mibale ekutana | 10.61775 | |
azalaki komilobela ete po na bato misusu esengeli kaka batikala bandeko soki te bolingo ewumelaka te | 14.020875 | |
kutu kala te awa sepi yango alingaki asilisa pe kelasi ya mikolo esengelaki zapo akanisa ya likambo akopesa ye libela | 16.902188 | |
lokola sepi charlie azalaki pe mɔtɔ mususu ya kati ya zapo | 6.647438 | |
ye atanga na zapo na isc | 3.4485 | |
na ebandeli zapo azalaki kosepela na ye makasi pe po na azalaki mayεlε pe kitoko | 9.778313 | |
tango wana bazalaki koyokana nanu malamu te | 4.923188 | |
kofandaka esika moko pe mayεlε na kelasi esangisaki bango mbangu pe malεmbε malεmbε batɔnga kindeko na bango mibale | 16.947563 | |
sarah kutu tango moko azalaki kosepela te lokola charlie azalaki tango nyɔnso na zapo na ye | 12.478125 | |
kasi basala na bango elɔkɔ ya mabe te pe basilisa kelasi na bango na kindeko | 9.483375 | |
lεlɔ charlie asalaka na ye pe na boulevard mpεmbεni ya zapo pe bakutanaka na bango tango nyɔnso soki balingi | 12.863813 | |
mingimingi ezalaka mikolo nyɔnso tango kutu bamonaka bango mibale | 8.190188 | |
bato oyɔ batanga na bango | 4.401375 | |
toyebaki na biso ete bolingaki kosuka kaka bino mibale | 7.917938 | |
ezalaki kosekisa bango po bazalaki kaka baninga pe ti lεlɔ masolo ya bolingo ebetama na yango te | 14.7015 | |
zapo azalaki kosambela ete ebetama na yango pe te | 6.760875 | |
mɔtɔ ya suka kasi mɔtɔ ya liboso ezalaki christelle oyɔ mama ya zapo alobelaki mokolo wana na butu | 12.8865 | |
kuna batangela yango kelasi | 2.178 | |
bato ebele kutu balobaka ete bakoki kokolisa bana na bango na bandal te | 7.055813 | |
zapo alobaka ete soki otangama obeba ata soki bamemi yɔ na lola okobeba kaka | 8.575875 | |
satana kutu azalaki kuna toyebi ndenge asuka | 3.380438 | |
kobeba ezalaka likambo ya mɔtɔ ye moko po batindaka mɔtɔ na makasi te | 5.17275 | |
ye moko zapo afanda tango molayi na bandal kasi asalaka nyɔnso po abeba te | 5.694563 | |
bilεngεbasi ebele pe elateli na bango epesaka lokumu te | 4.106438 | |
misusu kutu eyebanaka te po na nini balataka bilamba | 5.082 | |
po alata alata te ekokani na yango | 3.289688 | |
bilεngε basi yango mingi babimaka na bandako na bango pe mɔtɔ moko te apekisaka bango | 8.825438 | |
bilamba ya ndambu oyɔ balataka ememaka mibali ebele mosika na makanisi | 4.923188 | |
banabasi misusu soki abimi bongo mama na ye azelaka mwa nsoso na ye liboso akɛndɛ kolala | 8.054063 | |
ata soki kozanga nde ememaka bilege basi ebele na kindumba | 4.492125 | |
elongola baboti makasi ya kolandela bana | 3.834188 | |
bato ebele bawuta kutu na pasi oyɔ eleki pasi na biso kasi batambola kaka malamu | 6.556688 | |
bolamu kaka nde efutaka malamu pe masumu nyɔnso ememaka kaka liwa | 5.603813 | |
ebele pe lokola biso babotama na pasi pe bamibatela malamu | 5.195438 | |
soki bato ya boye bazalaka elakisi ete tokoki pe kosala yango | 5.286188 | |
leta pe esengeli asunga baboti ebele | 2.949375 | |
ezali pe kozangisa mboka mabɔkɔ po na kotɔnga lobi ya kitoko | 5.581125 | |
na bandal makambo esili te na banzela ya molili | 4.9005 | |
bana ebele bakendaka kobwaka bamayi na bango ya bomobali nzelanzela | 5.422313 | |
na ntɔngɔ bibatelanzoto etondaka na babalabala | 6.828938 | |
na bakuzu ebele batata mibimba babimaka na bana basi ya bilεngε | 6.193688 | |
batata yango libanda ya ndako bapesaka nyɔnso oyɔ basengaka bango | 6.760875 | |
wana kutu bazalaka bisekaseka kasi na ndako bilongi ya kokangama | 6.874313 | |
batata ya motindo oyɔ soki akangi yɔ kaka na mwana na ye ya mwasi akoki koyinisa yɔ mokili | 8.235563 | |
batata wana balingaka te babebisela bango bana na bango ya basi | 4.44675 | |
kasi na bopete nyɔnso babebisaka oyɔ ya baninga | 3.471188 | |
bilεngε basi oyɔ bango basalaka na bango bozoba bawutaka na banzete | 5.399625 | |
po na kozonga lisusu na banzela molili bilεngε bayebaka kaka basi kuna te | 7.554938 | |
ezalaka pe bisika oyɔ bamasanga oyɔ ya makasi emɛlamaka | 6.125625 | |
bisika matiti ya mabe to diamba etekamaka | 4.492125 | |
okokuta kuna bilεngε mibali mingi oyɔ balangwa libela bakokaka kotika yango lisusu te | 9.914438 | |
na kala ezalaki bisika pe ya bakuluna | 4.5375 | |
kasi lokola operation likofi ebengana bango ekoma ya bateki diamba to zododo | 7.123875 | |
makambo nyɔnso wana ezalaka kaka na bandal te ezalaka pe na yango na mokili mobimba | 7.26 | |
zapo azalaki kobima na butu te po na koboya makambo nyɔnso wana | 5.739938 | |
na butu soki basilissi kotala tv bazalaki kobeta bacartes na mama na ye | 6.851625 | |
na nsima bazalaki kosambela pe azalaki kobima kaka lobi na ntɔngɔ po na akɛndɛ mosala | 8.008688 | |
mitelengano ya zapo esilaki | 2.132625 | |
azongaki na ndako po na kopema | 2.26875 | |
tango ayaki mama na ye atielaki ye elongi ya mawa po na azalaki na posa ya bakɔkɔ | 7.736438 | |
batango moko bamama nyɔnso bazelaka ete mwana abota po na asepela | 5.808 | |
kasi mama ya zapo azalaki kobanga ete lisolo ya sarah ekomisa mwana na ye sango | 7.759125 | |
na mbala ebele kutu babeta lisolo yango pe mokolo wana mama atunaki ye lisusu soki azalaki kozela nini | 9.687563 | |
kobanga te mama na ngai okosepela tango nakozala na posa ya mwasi | 5.89875 | |
posa yango ekoya mokolo nini | 2.223375 | |
sikoyɔ basi ebele bakufelaka yɔ pe mwana na ngai christelle akosepelisa yɔ makasi | 7.396125 | |
christelle azalaki moninga moko ya kati ya zapo | 3.471188 | |
zapo azalaki kaka kobeta ye bakara na makambo ya bolingo | 5.218125 | |
ata soki ezalaki komonana na bizaleli na ye ete alingaka ye | 6.534 | |
zapo na koyoka yango akimaki lisolo | 4.106438 | |
mama lokola ozali mpenza na posa ya bakɔkɔ | 2.972063 | |
tokɛndɛ na bisika balokotaka bana po na ozwa mwana moko to mibale po na obokola pe po na batielaka yɔ makelele | 11.638688 | |
wana kutu nzambe akopambola yɔ makasi mpenza | 3.516563 | |
mama na ye akataki ye | 2.178 | |
nazali nde na posa yɔ obota | 3.198938 | |
banda bakambwana na sarah zapo akoma na ye kobanga bolingo po na ayokaka na ye lisusu pasi te | 6.7155 | |
kasi elɔkɔ nini ezangaka pasi na mokili | 3.493875 | |
butu ezalaki ekotaki makasi pe lisolo ya mwana ebandaki kotokisa zapo liboso ya mama na ye | 9.483375 | |
bazalaki kokoba na lisolo na bango tango bayoki makelele ya makasi na libanda | 6.760875 | |
bamataki likolo pe bamonaki bato ebele na nzela | 4.719 | |
ngulupa basanganaki esika moko mpεmbεni ya lopango na bango | 5.603813 |
Subsets and Splits
No community queries yet
The top public SQL queries from the community will appear here once available.