Regineforte/whisper-small-lingala
Automatic Speech Recognition
•
Updated
audio_path
audioduration (s) 3.25
29.8
| text_lingala
stringlengths 30
265
|
|---|---|
Kushi azalaki tata a Nimirodi oyo azalaki elombe ya liboso ya bitumba kati na mokili
|
|
Kanana azalaki tata a Sidoni mwana na ye ya liboso ya Eti
|
|
ya Yebusi ya Amori ya Girigazi
|
|
Eberi abotaki bana mibali mibale oko kombo na ye ezalaki Pelegi oyo elingi koloba Kokabola pamba te ezalaki na tango na ye nde bakabolaki mabele Kombo ya mwana mosusu ezalaki Yokitani
|
|
Tala bakonzi oyo bakambaki Edomi liboso ete Isalaele ekoma kokambama na mokonzi ela mwana mobali ya Beori oyo kombo ya engumba na ye ezalaki Dinaba
|
|
Tango Bela akufaki Yobabi mwana mobali ya Zera moto ya mokili ya Botsira akitanaki na ye na bokonzi
|
|
Tango Yobabi akufaki Ushami moto ya mokili ya Temani akitanaki na ye na bokonzi
|
|
Tango Samila akufaki Saulo moto ya engumba Reoboti engumba oyo etongama pembeni ya ebale akitanaki na ye na bokonzi
|
|
Mwana mobali ya Karimi kari oyo ayeisaki mobulu na Isalaele tango abukaki mobeko ya kozwa biloko oyo babulisaki mpo na Yawe
|
|
Mpe na sima Etsironi asangisaki nzoto na mwana mwasi ya Makiri tata ya bato ya Galadi Abalaki ye tango azalaki na mibu tuku motoba mpe mwana mwasi ya Makiri abotelaki ye Segubi
|
|
Segubi azalaki tata ya Yairi oyo azalaki kokonza bingumba tuku mibale na misato kati na mokili ya Galadi
|
|
Sheshani atikalaki kobota bana mibali te kaka bana basi Kasi azalaki na mowumbu moko ya mobali na kombo Yara moto ya Ejipito
|
|
Sheshani abalisaki mwana na ye ya mwasi epai ya Yara mowumbu na ye ya mobali mpe mwana yango ya mwasi abotelaki Yara mwana mobali Atayi
|
|
Tala bana mibali ya Davidi oyo babotamaki na Ebron wana ya liboso ezalaki Aminoni mwana mobali ya Ayinoami moto ya Jizireyeli a mibale Daniele mwana mobali ya Abigayili moto ya Karimeli
|
|
Bango nyonso motoba bazalaki bana mibali ya Davidi oyo babotamaki na Ebron mboka mokonzi epai wapi akonzaki mibu sambo na ndambo avidi akonzaki wuta na Yelusalemi mibu tuku misato na misato 2Sa 5 14-16 1Ma 14 4-7
|
|
Bango nyonso nde bazalaki bana mibali ya Davidi longola bana mibali oyo bamakangu na ye babotelaki ye Mpe Tamari azalaki ndeko na bango ya mwasi
|
|
Yaebetsi azalaki na lokumu mingi koleka bandeko na ye ya mibali Mama na ye apesaki ye kombo Yaebetsi mpo na koloba Nabotaki yo na pasi
|
|
Bazalaki basali mbeki oyo bazalaki kovanda na Netayimi mpe na Gedera batikalaki kuna mpo na kosalela mokonzi ibota ya Simeoni Ebl 46 10 Mit 26 12-13
|
|
Bazalaki kovanda na Beri-Sheba na Molada na Atsari-Shuwali
|
|
bakisa bamboka mike mosusu oyo ezingelaki bingumba yango kino na Baalati Oyo nde ezalaki bisika na bango ya kovanda mpe molongo ya mbotama ya bakoko na bango
|
|
Bato oyo batangamaki na bakombo bazalaki bakambi ya bituka na bango abota na bango ekomaki minene
|
|
mpe bakendeki na zingazinga ya Gedori na ngambo ya este ya lubwaku mpo na koluka matiti ya koleisa bibwele na bango
|
|
Bakutaki kuna matiti kitoko mpo na koleisa bibwele mokili moko ya monene ya kimia mpe ezanga mobulu Bato oyo bazalaki kovanda kuna na tango ya kala bazalaki bakitani ya Cham
|
|
Yuda alekaki bandeko na ye nyonso ya mibali na makasi mpe moto oyo akomaki mokonzi abimaki na nzela na ye Kasi atako bongo makoki ya bomwana ya liboso epesamaki kaka epai ya Jozefi Ebl 46 9 Mit 26 5-6
|
|
Bela mwana mobali ya Azazi koko ya Shema mwana mobali ya Joeli azalaki kovanda na mboka Aroeri mpe na etuka oyo ekenda kino na ngomba Nebo mpe na Bala-Meoni
|
|
Bavandaki na ngambo ya este longwa na mondelo ya esobe kino na ebale Efrate pamba te bangombe na bango ekomaki ebele kati na mokili ya Galadi
|
|
Na tango Saulo azalaki mokonzi babundisaki bato ya Agari mpe balongaki bango Bavandaki na bandako na bango ya kapo oyo ezalaki na etuka mobimba ya ngambo ya Galadi ibota ya Gadi
|
|
Bakitani ya Gadi bazalaki kovanda pembeni ya bakitani ya Ribeni na mokili ya Bashani kino na Salika
|
|
Bango nyonso bazalaki kovanda na Galadi na Bashani na bamboka na yango ya zingazinga mpe na bilanga nyonso ya Saroni kino na suka na yango
|
|
Batangaki bato nyonso oyo tango Yotami azalaki mokonzi ya Yuda mpe Jeroboami mokonzi ya Isalaele
|
|
Nzambe asungaki bango mpe apesaki bango elonga likolo ya bato ya Agari mpe baninga na bango nyonso oyo bayaki kosunga bango pamba te babelelaki Yawe na tango ya bitumba Yawe ayanolaki bango pamba te batielaki Ye motema
|
|
Bazwaki bibwele ya bato ya Agari bashamo nkoto tuku mitano bameme nkoto nkama mibale na tuku mitano mpe ba-ane nkoto mibale Bazwaki mpe bakangami nkoto nkama moko
|
|
mingi bakufaki pamba te bitumba ezalaki na maboko ya Nzambe Bavandaki na mokili yango kino na tango ya bowumbu ibota ya Manase
|
|
Bakitani ya ndambo ya libota ya Manase bavandaki na mokili oyo ezalaki longwa na Bashani kino na Bala-Erimoni Seniri mpe ngomba Erimoni
|
|
Kasi lokola batosaki te Nzambe ya bakoko na bango mpe bakomaki kosalela banzambe ya bato ya mokili oyo Nzambe abebisaki liboso na bango
|
|
Yoanani abotaki Azaria oyo azalaki Nganga-Nzambe kati na Tempelo oyo Salomo atongaki na Yelusalemi
|
|
Tala Balevi oyo Davidi apesaki mokumba ya kotambolisa banzembo kati na Tempelo ya Yawe wuta tango Sanduku ya Yawe ezwaki kuna esika ya bopemi
|
|
Balevi oyo basalaki mosala na bango na nzela ya banzembo liboso ya Mongombo Ndako ya kapo ya Bokutani kino tango Salomo atongaki Tempelo ya Yawe na Yelusalemi kolanda mibeko oyo bapesaki bango
|
|
Tala bato oyo bazalaki kosala mosala yango elongo na bana na bango ya mibali ati na bana mibali ya Keati oyembi Emani wana mobali ya Joeli mwana mobali ya Samuele
|
|
Na ngambo ya loboko ya mobali ya Emani Azafi nde azalaki kotelema wana mpe azalaki libota moko na Emani zafi mwana mobali ya Berekia mwana mobali ya Shimea
|
|
Na ngambo ya loboko ya mwasi bandeko na bango bana mibali ya Merari nde bazalaki kotelema wana na bokambami ya Etani wana mobali ya Kishi mwana mobali ya Abidi wana mobali ya Maluki
|
|
Tala bamboka oyo epesamaki na libota ya Aron kati na etuka ya Keati kolanda bandelo ya mabele na bango pamba te bato ya Keati nde bazalaki bato ya liboso ya kozwa libula ya mabele na nzela ya Zeke
|
|
engumba ya Ebron kati na mokili ya Yuda elongo na bamboka na yango ya zingazinga
|
|
Kasi bilanga mpe bamboka oyo ezingelaki engumba epesamaki na Kalebi mwana mobali ya Yefune
|
|
Boye tala bingumba oyo bapesaki na bana mibali ya Aron lokola bingumba ya kokimela Ebron mpe bamboka na yango ya mike Libina mpe bamboka na yango ya mike Yatiri Eshitemoa mpe bamboka na yango ya mike
|
|
Ileni mpe bamboka na yango ya mike Debiri mpe bamboka na yango ya mike
|
|
Kati na etuka ya Benjame bapesaki bango lokola bingumba ya kokimela Geba mpe bamboka na yango ya mike Alemeti mpe Anatoti elongo na bamboka na yango ya mike ingumba nyonso oyo epesamelaki kati na bituka na bango ezalaki zomi na misato Joz 21 5-8
|
|
Bana mosusu ya Keati bazwaki na nzela ya zeke bingumba zomi kati na etuka ya Efrayimi ya Dani mpe ya ndambo ya libota ya Manase
|
|
Bana ya Gerishoni kolanda etuka na bango bazwaki bingumba zomi na misato kati na libota ya Isakari ya Aseri ya Nefitali mpe kati na libota ya Manase oyo ezalaki na Bashani
|
|
Bana ya Merari kolanda bituka na bango bazwaki na nzela ya zeke bingumba zomi na mibale kati na libota ya Ribeni ya Gadi mpe ya Zabuloni
|
|
Boye bana ya Isalaele bapesaki epai ya bana ya Levi bingumba wana mpe bamboka na yango ya mike
|
|
Bapesaki bango bingumba wana na nzela ya zeke balongolaki ndambo ya bingumba yango kati na mabota ya Yuda ya Simeoni mpe ya Benjame bongo bakomaki kobenga yango na bakombo ya mabota wana
|
|
Bituka mosusu ya bana ya Keati bazwaki bingumba ya kokimela kati na libota ya Efrayimi
|
|
Bapesaki bango lokola engumba ya kokimela Sishemi mpe bamboka na yango ya mike kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi Gezeri mpe bamboka na yango ya mike
|
|
Yokimeami mpe bamboka na yango ya mike Beti-Oroni mpe bamboka na yango ya mike
|
|
Mpe kati na etuka ya ndambo ya libota ya Manase bazwaki neri mpe bamboka na yango ya mike ileami mpe bamboka na yango ya mike ingumba nyonso oyo elongo na bamboka na yango ya mike epesamaki epai ya bituka mosusu ya bana ya Keati
|
|
Bakitani ya Gerishoni bazwaki ati na etuka ya ndambo ya libota ya Manase bazwaki bingumba oyo olani kati na Bashani mpe bamboka na yango ya mike shitaroti mpe bamboka na yango ya mike
|
|
Kati na libota ya Isakari bazwaki edeshi mpe bamboka na yango ya mike abirati mpe bamboka na yango ya mike
|
|
Kati na libota ya Aseri bazwaki ashali mpe bamboka na yango ya mike bidoni mpe bamboka na yango ya mike
|
|
Kati na libota ya Nefitali bazwaki edeshi kati na Galile mpe bamboka na yango ya mike moni mpe bamboka na yango ya mike iriatayimi mpe bamboka na yango ya mike
|
|
Bana mosusu ya Merari bazwaki bingumba oyo ati na libota ya Zabuloni imono mpe bamboka na yango ya mike abori mpe bamboka na yango ya mike
|
|
Kati na libota ya Ribeni kuna na ngambo ya este ya Yordani pembeni ya Jeriko bazwaki bingumba oyo etseri kati na esobe mpe bamboka na yango ya mike akatsi mpe bamboka na yango ya mike
|
|
Kati na libota ya Gadi bazwaki amoti kati na Galadi mpe bamboka na yango ya mike aanayimi mpe bamboka na yango ya mike
|
|
Kati na molongo na bango kolanda bituka na bango mpe mabota na bango ya botata ezalaki na basoda ya mpiko nkoto tuku misato na motoba pamba te bazalaki na basi mpe bana ebele
|
|
Bandeko mibali nyonso kati na bituka ya libota ya Isakari oyo bakomamaki na buku ya mabota bazalaki nkoto tuku mwambe na sambo Bazalaki basoda ya mpiko ibota ya Benjame Ebl 46 21 Mit 26 38-39
|
|
Motango ya basoda ya mpiko kolanda bituka na bango ezalaki nkoto tuku mibale na nkama mibale
|
|
Kati na molongo ya Yediayeli bakitani nyonso bazalaki bakambi ya bituka na bango mpe basoda ya mpiko Motango na bango ezalaki nkoto zomi na sambo na nkama mibale
|
|
Maaka mwasi ya Makiri abotelaki ye lisusu mwana mobali oyo apesaki kombo Peretsi Peretsi azalaki na ndeko mobali Shereshi oyo abotaki bana mibali oyo Ulami mpe Rekemi
|
|
Bakitani ya Efrayimi frayimi abotaki Shutela Shutela abotaki Beredi eredi abotaki Taati Taati abotaki Eleada leada abotaki Taati
|
|
Tata na bango Efrayimi alelaki bango mikolo ebele mpe bandeko na ye bayaki kobondisa ye
|
|
Sima na yango Efrayimi asangisaki lisusu nzoto na mwasi na ye oyo azwaki zemi mpe abotaki mwana mobali Boye Efrayimi apesaki ye kombo Beria pamba te abotamaki tango pasi ezalaki kati na libota na ye
|
|
Bakitani ya Manase bazwaki lokola libula Beti-Sheani Taanaki Megido Dori mpe bamboka na yango ya mike Bakitani ya Jozefi mwana mobali ya Isalaele bazalaki kovanda na bingumba wana nyonso ibota ya Aseri Ebl 46 17 Mit 26 44-45
|
|
Tala bana mibali ya Ewudi oyo bazalaki bakambi ya bituka ya bavandi ya Geba mpe bamemaki bato ya Geba na Manaati
|
|
Batangaki bana nyonso ya Isalaele mpe bakomaki bakombo na bango na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele Bato ya Yuda bakendeki na bowumbu na Babiloni mpo na kozanga boyengebene
|
|
Bato ya liboso kati na bana ya Isalaele oyo bazongaki lisusu kovanda na bingumba na bango ezalaki ndambo ya bana ya Isalaele Banganga-Nzambe Balevi mpe basali ya Tempelo ya Yawe
|
|
Nzokande ndambo ya bana mibali ya Yuda ya Benjame ya Efrayimi mpe ya Manase bazalaki kovanda na Yelusalemi
|
|
Motango ya bato ya Benjame kolanda ndenge bakomamaki na buku ya mabota na bango ezalaki nkama libwa na tuku mitano na motoba Bato oyo nyonso bazalaki bakambi ya bituka na bango
|
|
Banganga-Nzambe oyo bazalaki bakambi ya bituka bazalaki nkoto moko na nkama sambo na tuku motoba bazalaki na molende makasi mpo na mosala ya Ndako ya Nzambe
|
|
Kino lelo bakitani ya Shalumi bakengelaka ekuke ya ngambo ya este ya Ndako ya Nzambe ekuke oyo babengaka ekuke ya Mokonzi Bango wana nde bakengeli bikuke kati na Balevi
|
|
Pineasi mwana mobali ya Eleazari azalaki kala mokonzi na bango bongo Yawe azalaki elongo na ye
|
|
Boye bango elongo na bana na bango bazalaki na mokumba ya kokengela bikuke ya Tempelo ya Yawe elingi koloba bikuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani
|
|
Bandeko na bango ya mibali oyo bazalaki na bamboka na bango basengelaki koyaka tango na tango kosunga bango mikolo sambo
|
|
Kasi bakonzi minei ya bakengeli bikuke bazalaki Balevi oyo bazalaki na mokumba ya kokengela bashambre mpe bomengo ya Ndako ya Nzambe
|
|
Bazalaki kolekisa butu na zingazinga ya Ndako ya Nzambe mpo ete basengelaki kokengela yango mpe kofungola yango tongo nyonso
|
|
Bamoko kati na bango bazalaki na mokumba ya kobatela bisalelo ya losambo mpe kotanga yango tango nyonso bazalaki kokotisa to kobimisa yango
|
|
Kasi bana mibali ya Banganga-Nzambe bazalaki kosala malasi
|
|
Moto moko kati na Balevi Matitia mwana mobali ya liboso ya Shalumi moto ya Kore azalaki na mokumba ya kotumba mapa na kikalungu
|
|
Bamosusu kati na bango bato ya Keati bazalaki na mokumba ya kobongisa mapa na milongo mpo na basaba nyonso
|
|
Bayembi oyo bazalaki bakambi ya libota ya Levi bazalaki tango nyonso kovanda na bashambre ya Ndako ya Nzambe Bazalaki kosala mosala mosusu te kaka kosala kati na Ndako ya Nzambe butu mpe moyi
|
|
Bango nyonso wana bazalaki bakambi ya libota ya Levi kolanda ndenge bakomamaki na buku ya mabota na bango mpe bazalaki kovanda na Yelusalemi ibota ya Saulo 1Ma 8 28-38
|
|
Yeyeli tata ya Gabaoni azalaki kovanda na Gabaoni elongo na Maaka mwasi na ye
|
|
Bato ya Filisitia babundisaki bana ya Isalaele Bana ya Isalaele bakimaki liboso na bango mpe mingi kati na bango bakufaki na ngomba Giliboa
|
|
Bitumba ekomaki lisusu makasi mpo na koluka bomoi ya Saulo Tango basoda oyo babundaka na matolotolo bamonaki ye Saulo alengaki na somo makasi wana asosolaki ete bakoboma ye
|
|
Tango soda yango amonaki ete Saulo akufi ye mpe amibwakaki na likolo ya mopanga mpe akufaki
|
|
Ezalaki bongo nde Saulo bana na ye misato ya mibali mpe libota na ye mobimba bakufaki elongo
|
|
Tango bana nyonso ya Isalaele oyo bazalaki kovanda na lubwaku bamonaki ete mampinga esili kopanzana mpe ete Saulo mpe bana na ye ya mibali bakufi basundolaki bingumba na bango mpe bakimaki Bato ya Filisitia bayaki kovanda na bingumba yango
|
|
Mokolo oyo elandaki tango bato ya Filisitia bayaki mpo na kolongola biloko oyo ezalaki na banzoto ya bibembe bamonaki Saulo mpe bana na ye ya mibali oyo bakufaki na ngomba Giliboa
|
|
Bazwaki biloko na ye bamemaki moto na ye elongo na bibundeli na ye mpe batindaki bato na mokili mobimba ya bato ya Filisitia mpo ete bapanza sango malamu oyo ya elonga epai ya banzambe na bango ya bikeko mpe epai ya bato na bango
|
|
Batiaki bibundeli na ye na tempelo ya banzambe na bango mpe badiembikaki mokuwa ya moto na ye kati na tempelo ya Dagoni
|
|
bilombe na bango nyonso batelemaki bakendeki kozwa bibembe ya Saulo mpe ya bana na ye ya mibali mpe bamemaki yango na Yabeshi Sima na bango kokunda mikuwa na bango na Yabeshi na se ya nzete ya terebente bakilaki bilei mikolo sambo
|